46 Atunaki bango : — Mpo na nini bozali kolala ? Botelema mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
Mokumbi masuwa apusanaki pene ya Yona mpe alobaki na ye : — Ndenge nini okoki penza kolala pongi boye ? Telema mpe belela nzambe na yo, tango mosusu akoki koyokela biso mawa mpo ete tokufa te.
Tango akomaki na esika yango, alobaki na bango : — Bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
Tango asilisaki kosambela, atelemaki, akendeki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi, mpo ete batondaki na mawa.