45 Tango asilisaki kosambela, atelemaki, akendeki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi, mpo ete batondaki na mawa.
Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi ; alobaki na Petelo : — Boni, bokokaki te kosenzela elongo na Ngai mpo na ngonga moko ?
Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo.
Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi. Alobaki na Petelo : — Simona, ozali kolala ? Okokaki te kosenzela mpo na ngonga moko ?
Lokola azalaki koyoka somo makasi, asambelaki lisusu makasi koleka, kino motoki na Ye ekomaki lokola matanga ya makila oyo ekomaki kokweya na mabele.]
Atunaki bango : — Mpo na nini bozali kolala ? Botelema mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.