Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 22:44 - Mokanda na Bomoi

44 Lokola azalaki koyoka somo makasi, asambelaki lisusu makasi koleka, kino motoki na Ye ekomaki lokola matanga ya makila oyo ekomaki kokweya na mabele.]

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 22:44
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, ezalaki mokano na Yawe ete anyokwama na nzela ya pasi. Atako Yawe akomisaki bomoi na ye mbeka mpo na masumu, akomona bakitani na ye mpe mikolo na ye ekobakisama ; bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye.


Bino bato nyonso oyo bolekelaka wana ; boni, ezali kosala bino eloko moko te ? Botala malamu zingazinga na bino, ezali na pasi lokola pasi oyo ekomeli ngai ? Yawe atindeli ngai yango na mokolo ya kanda makasi na Ye.


Tango asilisaki kosambela, atelemaki, akendeki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi, mpo ete batondaki na mawa.


Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami ! Naloba nini ? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi ? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo !


Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu ?


Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ