Moko kati na baninga ya Yesu asembolaki loboko, abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.
Alobaki na bango : — Kasi, sik’oyo, tika ete moto oyo azali na mbongo azwa yango, oyo azali na sakosi azwa yango, oyo azangi mopanga ateka elamba na ye mpo na kosomba yango !
Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.
Botelemelaka ye mpe boyikaka mpiko kati na kondima, pamba te boyebi ete bandeko na bino, oyo bapalangana kati na mokili bazali mpe komona bapasi lokola bino.