Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 22:37 - Mokanda na Bomoi

37 Ekomama : « Batangaki Ye elongo na babomi bato ; » mpe nazali koloba na bino : makambo yango esengeli kokokisama kati na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 22:37
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, pamba te akabaki bomoi na ye na kufa mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, pamba te amemaki masumu ya bato ebele mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.


Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. [


Ezali boye nde ekokisamaki Makomi oyo ezali koloba : « Batangaki Ye na molongo ya bato ya mabe. »]


Yesu abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango : — Tozali kokende na Yelusalemi ; makambo nyonso oyo basakoli bakoma na tina na Mwana na Moto ekokokisama.


Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge Nzambe akata ; kasi mawa na moto oyo azali koteka Ye.


Alobaki na bango : — Kasi, sik’oyo, tika ete moto oyo azali na mbongo azwa yango, oyo azali na sakosi azwa yango, oyo azangi mopanga ateka elamba na ye mpo na kosomba yango !


Bongo Yesu alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe na bakambi ya bato, oyo bayaki kokanga Ye : — Boni, nakomi mokambi ya batomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe banzete ?


Bamemaki mpe mibali mosusu mibale, babomi bato, mpo na koboma bango elongo na Yesu.


Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.


Nzokande, batiaka tembe na Makomi te. Boye, soki abengaki « banzambe, » bato oyo epai banani Liloba na Nzambe eyaki,


Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai.


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ