34 Yesu alobaki na ye : — Petelo, nazali koloba na yo : lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.
Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.
Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe : — Tika ete Nzambe alakela ngai mabe soki nakosi ! Nalapi ndayi : Nayebi moto yango te ! Mpe, mbala moko, soso elelaki.
Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato.
Kasi Petelo azongisaki : — Nkolo, nandimi kokota boloko to kokufa elongo na Yo.
Bongo Yesu atunaki bango : — Tango natindaki bino maboko pamba, mbongo te, sakosi te, basandale te ; boni, bozangaki eloko ? Bazongisaki : — Tozangaki eloko te.
Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. »
Yesu azongiselaki ye : — Obongami penza kokufa mpo na Ngai ! Nazali koloba na yo penza ya solo : liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.
Kasi Petelo awanganaki yango lisusu ; mpe mbala moko, soso elelaki.