33 Kasi Petelo azongisaki : — Nkolo, nandimi kokota boloko to kokufa elongo na Yo.
Moto oyo atiaka elikya kati na ye moko kaka azali zoba, kasi moto oyo atambolaka na bwanya akokangolama.
Oh Yawe, nayebi ete moto moko te azali mokonzi ya bomoi na ye ; moto oyo azali kotambola azali na bokonzi te ya kokamba matambe na ye.
Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?
Yesu azongiselaki bango : — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga ! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela ? Bazongisaki : — Iyo, tokoki.
Petelo alobaki na Ye : — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.
Kasi Petelo akobaki kotia monoko makasi, alobaki : — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana yo te. Mpe bango nyonso balobaki kaka ndenge moko.
Yesu alobaki na ye : — Petelo, nazali koloba na yo : lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.
Kasi Petelo awanganaki mpe alobaki : — Mwasi, nayebi ye te.
Yesu azongiselaki ye : — Obongami penza kokufa mpo na Ngai ! Nazali koloba na yo penza ya solo : liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.
Kasi Polo azongiselaki biso : — Mpo na nini bozali kolela mpe kolembisa ngai ? Nasili komibongisa kaka te mpo na kokangama, kasi mpe mpo na kokufa kati na Yelusalemi mpo na Kombo ya Nkolo Yesu.