Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 22:31 - Mokanda na Bomoi

31 Simona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 22:31
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Esengeli konika ble mpo na kosala mapa ; nzokande babetaka yango tango nyonso te, balekisaka nde bapine ya shar na likolo na yango mpe mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka, kasi banikaka yango te.


« Pamba te nakopesa mitindo mpe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonso ndenge bayungolaka ble ; bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.


Yawe alakisaki ngai Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo azalaki ya kotelema liboso ya Anjelu ya Yawe. Alakisaki ngai lisusu Satana oyo azalaki ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Jozue mpo na kofunda ye.


Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.


Yesu alobaki na ye : — Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »


Nkolo azongiselaki ye : — Marte, Marte, ozali komitungisa mpe kominyokola mpo na makambo ebele,


Akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye : — Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ?


bokaba mobali yango na maboko ya Satana mpo ete nzoto na ye ebeba, mpe molimo na ye ebikisama na mokolo ya Nkolo.


mpo ete Satana akonza biso te, pamba te toyebi malamu makanisi na ye.


Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.


Bongo nayokaki, kati na Lola, mongongo moko ya makasi koloba : « Tango ya lobiko, ya nguya, ya Bokonzi ya Nzambe na biso, mpe ya nguya ya Klisto na Ye ekoki. Pamba te Mofundi ya bandeko na biso, oyo afundaka bango butu mpe moyi, liboso ya Nzambe na biso, abwakami na mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ