Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 22:29 - Mokanda na Bomoi

29 Mpe lokola Tata na Ngai apesaki Ngai bokonzi, Ngai mpe nazali kopesa bino bokonzi,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 22:29
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso.


Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »


Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.


Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.


Esengo na bato oyo bazali konyokolama likolo ya bosembo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !


« Esengo na babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !


Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !


Nkolo alobaki na ye : « Osali malamu ! Ozali mosali malamu ! Mpo ete ozalaki sembo na likambo ya moke, nakokomisa yo moyangeli ya bingumba zomi. »


Bato nyonso oyo basalaka masano bamipekisaka makambo ebele ; basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka ; kasi biso, tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te.


Boye, tozali solo na elikya makasi na tina na bino, pamba te toyebi malamu ete ndenge kaka bozali komona pasi elongo na biso, ndenge wana mpe bozali kozwa kobondisama elongo na biso.


Soki toyiki mpiko, tokokonza mpe elongo na Ye. Kasi soki towangani Ye, Ye mpe akowangana biso ;


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


Bongo tango Mokonzi ya babateli bibwele akoya, bokozwa motole ya nkembo oyo ekotikala kobungisa kitoko na yango te.


Mir ya engumba yango etongamaki likolo ya miboko zomi na mibale, mpe bakombo ya bantoma zomi na mibale ya Mpate ezalaki ya kokomama na likolo na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ