28 Bino nde bato oyo botikali ya kokangama na Ngai kati na pasi na Ngai.
Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye : — Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai,
mpo ete akoma ntoma mpe azwa, kati na lotomo oyo ya bontoma, esika oyo Yuda atikaki mpo na kokende na esika oyo ebongi na ye. »
Pamba te, lokola Ye moko amonaki pasi tango amekamaki, akoki mpe kosunga bato oyo bazali komekama.
Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.