Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 22:26 - Mokanda na Bomoi

26 Kasi esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto oyo aleki monene kati na bino azala lokola leki ya suka, mpe moto oyo azali kokamba azala lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 22:26
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ;


Esengeli te kozala bongo kati na bino ; nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ;


Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.


mpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko ; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.


Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.


na makanisi te ya kokonza bato oyo bapesameli bino, kasi na kozalaka bandakisa mpo na etonga.


Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ