24 Tembe moko ebimaki kati na bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.
Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye : — Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo ?
Kasi bavandaki nye, pamba te, na nzela, bazalaki penza kotiana tembe mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.
Bongo bantoma bakomaki kotunana bango na bango mpo na koluka koyeba soki nani kati na bango akosala likambo yango.
Tembe moko ebimaki kati na bayekoli ; bazalaki koluka koyeba moto oyo aleki monene kati na bango.
Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino ; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu ;
Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te,