23 Bongo bantoma bakomaki kotunana bango na bango mpo na koluka koyeba soki nani kati na bango akosala likambo yango.
Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga : — Nkolo, ezali ngai ?
Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga : — Ezali ngai ?
Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge Nzambe akata ; kasi mawa na moto oyo azali koteka Ye.
Tembe moko ebimaki kati na bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.