Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 22:18 - Mokanda na Bomoi

18 pamba te nazali koloba na bino : nakomela lisusu te vino kowuta na bambuma ya vino, kino Bokonzi ya Nzambe eya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 22:18
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

vino mpo na kosepelisa mitema na bango, mafuta mpo na kongengisa bilongi na bango, mpe mapa mpo na kolendisa mitema na bango.


Oh molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema ; nayei na elanga na ngai, nayei kobuka mbuma na ngai oyo basalelaka malasi ya mire, nayei kobuka biloko na ngai ya mike-mike ya solo kitoko, nayei kolia mafuta na ngai ya nzoyi, nayei komela vino mpe miliki na ngai. Oh baninga, bolia mpe bomela na bino, bomela mpe bolangwa na bino, balingami na ngai.


Na ngomba oyo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobongisa feti ya biloko kitoko mpo na bato nyonso, feti monene ya vino ya kala, ya misuni oyo eleki mafuta mpe ya vino ya kala oyo balongola malamu salite.


« Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya, boya na esika oyo mayi ezali ; ezala bino oyo bozali na mbongo te, boya kosomba mpe kolia ; boya kosomba vino mpe miliki : ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te !


Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela bango. Bakolia mpe bakobuka mabanga ya ebambelo mabanga, bakomela mpe bakosala makelele lokola bato balangwe masanga, bakotonda lokola kopo ya makila oyo basopaka na basonge ya etumbelo.


Bakozala bato ya esengo, bakokoma kitoko makasi. Ble ekopesa bilenge mibali makasi mpe vino ya sika ekopesa bilenge basi makasi.


Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.


Nazali koloba na bino penza ya solo : kobanda sik’oyo, nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, elongo na bino, kati na Bokonzi ya Tata na Ngai.


Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango, mpe bango nyonso bamelaki yango.


Nazali koloba na bino penza ya solo : nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, kati na Bokonzi ya Nzambe.


bapesaki Ye masanga ya vino basangisa na mire, kasi amelaki yango te.


Yesu alobaki na bango lisusu : — Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Bokonzi ya Nzambe koya na nguya.


Ndenge moko mpe mpo na bino : tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene.


pamba te, nazali koloba na bino : nakolia yango lisusu te kino tina na yango ekokokisama penza kati na Bokonzi ya Nzambe.


Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona bokonzi ya Nzambe.


Akangolaki biso na bokonzi ya molili mpe amemaki biso kati na bokonzi ya Mwana na Ye ya bolingo,


Kasi nzete ya vino ezongiselaki yango : ‹ Natika penza vino na ngai, oyo esepelisaka banzambe mpe bato mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ