14 Tango ngonga ekokaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bantoma.
Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bayekoli zomi na mibale.
Tango pokwa ekomaki, Yesu ayaki elongo na bayekoli zomi na mibale.
Tango bantoma bazongaki, basanganaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye makambo nyonso oyo bawutaki kosala mpe nyonso oyo bateyaki.
Bakendeki, bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.
Alobaki na bango : — Nayokaki posa makasi ya kolia Pasika oyo elongo na bino liboso ete namona pasi,