Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 22:11 - Mokanda na Bomoi

11 Mpe boloba na nkolo ndako : « Moteyi atuni : ‹ Wapi shambre epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 22:11
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki moto moko alobi na bino likambo na tina na yango, bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. » Mpe, mbala moko, akotika yango kokende.


mpe, tango akokota na ndako, boloba na nkolo ndako yango : « Moteyi azali kotuna yo : ‹ Wapi shambre na Ngai epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »


Soki moto moko atuni bino : « Mpo na nini bozali kofungola yango ? » Boloba na ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. »


Bazongisaki : — Nkolo azali na bosenga na yango.


Tango Yesu akomaki na esika yango, atombolaki miso mpe alobaki na ye : — Zashe, kita noki ! Nasengeli kolala na ndako na yo lelo.


Yesu azongiselaki bango : — Tango bokokota na engumba, bokokutana na mobali moko amemi eloku ya mayi. Bolanda ye kino na ndako epai wapi akokota.


Akolakisa bino, na etaje, shambre moko ya monene babongisa malamu ; ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika.


Sima na Marte koloba bongo, akendeki kobenga Mari, ndeko na ye ; mpe wana abendaki ye pembeni, alobaki na ye na mongongo ya se penza : — Moteyi ayei, azali kobenga yo.


Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ