Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 21:6 - Mokanda na Bomoi

6 — Mikolo ekoya oyo, kati na nyonso oyo bozali komona awa, ata libanga moko te ekotikala na likolo ya libanga mosusu ; nyonso ekobukama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 21:6
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Mosakoli Mishe, moto ya Moresheti, asakolaki na tango ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda ; alobaki na bato nyonso ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga, Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti. ›


nakosala na Ndako oyo, makambo oyo nasalaki na Silo ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekobanda kotangaka kombo ya engumba oyo mpo na kolakela mabe. › »


Mpo na nini ozali kosakola na Kombo na Yawe ete Ndako oyo ekokoma lokola Silo ; engumba oyo ekobebisama, ekotikala lisusu na bato te ? » Ebele ya bato nyonso bazingelaki Jeremi kati na Tempelo ya Yawe.


Ndenge nini wolo ebungisi kongenga na yango, wolo ya peto enzuluki ! Mabanga ya talo oyo ya bule epanzani na basonge ya babalabala nyonso.


ezali mpo ete ngomba Siona ebebisami, mpe mbwa ya zamba ekomi kovanda kuna.


Yango wana, likolo na bino, bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga. Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.


Mokili ya Libani, fungola bikuke na yo mpo ete moto ezikisa banzete na yo ya sedele !


Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango ; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala.


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bomoni nyonso oyo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso ekobukama, libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu.


Yesu alobaki na ye : — Ozali komona bandako minene oyo ! Libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu, nyonso ekobukama.


Batunaki Yesu : — Moteyi, makambo yango ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango ekomi pene ya kokokisama ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ