Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 21:37 - Mokanda na Bomoi

37 Mikolo nyonso, na moyi, Yesu azalaki koteya kati na Tempelo ; mpe na butu, azalaki kobima mpo na kokende kolala na ngomba ya banzete ya olive.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 21:37
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo wana, makolo na Ye ekotelema likolo ya ngomba ya banzete ya olive oyo ezali na ngambo ya este ya Yelusalemi ; mpe ngomba ya olive ekokabwana na biteni mibale : eteni moko na ngambo ya este mpe eteni mosusu na ngambo ya weste. Lubwaku moko ya monene ekosalema : eteni moko ya ngomba ekokende na ngambo ya nor, mpe eteni mosusu, na ngambo ya sude.


Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi mpe bakomaki pene ya Betifaje, na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli mibale.


Bongo atikaki bango, abimaki longwa na engumba mpe akendeki na Betani epai wapi alekisaki butu.


Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.


Kaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? Nazalaki kovanda mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te.


Mokolo oyo elandaki, wana bazalaki kotika Betani, Yesu ayokaki nzala.


Tango pokwa ekomaki, Yesu mpe bayekoli na Ye babimaki na engumba.


Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali kosalema bongo mpo ete Makomi ekokisama.


Wana akomaki pene ya Betifaje mpe Betani, na ngomba oyo babengaka « ngomba ya banzete ya olive, » atindaki bayekoli mibale kati na bayekoli na Ye ;


Mpe tango akomaki pene ya Yelusalemi, na esika oyo nzela ekita na ngomba ya banzete ya olive, ebele ya bayekoli babandaki kokumisa Nzambe, na esengo nyonso mpe na mongongo makasi mpo na bikamwa nyonso oyo bamonaki.


Yesu azalaki koteya mikolo nyonso na Tempelo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya Bayuda bazalaki koluka koboma Ye ;


Yesu abimaki mpe akendeki lokola momesano na ngomba ya banzete ya olive, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye.


Wana etikalaki mikolo motoba mpo ete Pasika ebanda, Yesu akendeki na Betani epai wapi Lazare, oyo asekwisaki kati na bakufi, azalaki kovanda.


Yuda oyo asilaki komibongisa mpo na kokaba Yesu ayebaki esika yango malamu, pamba te Yesu azalaki kokende kuna mbala mingi elongo na bayekoli na Ye.


Bantoma bazongaki na Yelusalemi wuta na ngomba oyo babengaka Ngomba ya banzete ya Olive, oyo ezali pene ya Yelusalemi, na mosika ya bametele pene nkoto moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ