32 Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.
Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Mwana na Moto koya kati na nkembo ya bokonzi na Ye.
Nazali koloba na bino penza ya solo : etumbu oyo esengeli mpo na mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.
Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.
Ndenge moko mpe mpo na bino : tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene.
Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.