28 Tango makambo wana ekobanda kosalema, botelema, botombola mito mpe boyika mpiko, pamba te lisiko na bino ekomi pene.
Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo molimo mabe egumba ye mokongo, mpe azalaki kokoka te komisembola wuta mibu zomi na mwambe.
Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi ? Boni, akozelisa bango ?
Alobaki na bango lisese oyo : — Botala malamu nzete ya figi mpe banzete nyonso mosusu :
Pamba te bikelamu nyonso ezali kozela na posa makasi ete bana na Nzambe bamonisama.
Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela ; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso.
lokola ndanga ya libula na biso kino basikolami na Ye bakangolama mpo na kosanzola nkembo na Ye.
Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te ; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama.