Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 21:27 - Mokanda na Bomoi

27 Sima na yango, bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya mpe na nkembo monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 21:27
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na bimoniseli na ngai ya butu, namonaki moto moko lokola Mwana na Moto koya elongo na mapata ya likolo ; apusanaki pene ya Mpaka oyo azala liboso ya tango, mpe bamemaki ye liboso na Ye.


Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo ; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene.


Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo.


Yesu azongiselaki ye : — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.


Bongo, bato bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya monene mpe na nkembo.


Bato bakokufa na somo, wana bakozala kokanisa makambo oyo esengeli koya na mokili, pamba te banguya ya Likolo ekoningisama.


« Botala, azali koya kati na mapata ! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo ! Amen.


Bongo namonaki lipata moko ya pembe, mpe ekelamu moko lokola mwana na moto evandaki na likolo ya lipata yango. Ezalaki na motole ya wolo na moto na yango mpe na mbeli ya minu makasi na loboko na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ