Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 21:25 - Mokanda na Bomoi

25 Bilembo ekomonana kati na moyi, kati na sanza, mpe kati na minzoto ; bongo na mokili, bikolo ekotonda na somo mpe na kobanga likolo ya lokito makasi mpe ya bambonge ya ebale monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 21:25
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, tobangaka te ata soki mabele eningani, bangomba ekweyi kati na ebale monene ;


Minzoto na likolo mpe minda nyonso oyo ezali pene na yango ekopesa lisusu pole na yango te : moyi ekokoma molili tango tongo ekotana, mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.


Mawa na ebele ya bato ! Tala ndenge bazali koganga lokola makelele ya ebale monene ! Bato ya bikolo bazali koganga lokola lokito ya mayi ya ebale monene !


Sanza ekokoma motane, mpe moyi ekoyoka soni, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi, liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi.


Na mokolo wana, bakoganga likolo na bango lokola makelele ya ebale monene. Mpe soki moto atali kati na mokili, akomona molili mpe minyoko : pole ekozipama na se ya mapata.


Nazali Yawe, Nzambe na Yo, oyo aningisaka ebale monene mpo ete mbonge na yango etomboka. Kombo na Ye ezali ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›


Tango natalaki mabele, namonaki ete ezalaki kaka bongo-bongo mpe ezalaki ata na eloko moko te ; tango natalaki likolo, namonaki ete pole ezalaki lisusu te.


Na tango wana, Misheli, mokambi monene ya ba-anjelu, oyo abatelaka bato na yo akotelema. Ekozala tango ya pasi penza, pasi oyo etikala nanu kozala te wuta bikolo ezala na mokili kino na tango wana. Kasi na tango wana, bato ya ekolo na yo, oyo bakombo na bango ekomonana kati na buku, bakobika.


Moto oyo aleki malamu kati na bango azali lokola nzube, moto oyo aleki sembo azali mabe koleka liboke ya basende. Mokolo oyo bakengeli na yo basakolaki ekokisami, mokolo oyo Yawe ayei kopesa yo etumbu. Sik’oyo, ekomi tango na bango ya koyoka soni.


Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya longwa na likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »


Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.


Kasi na mikolo yango, sima na pasi wana, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te,


Bongo, bato bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya monene mpe na nkembo.


Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.


Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.


Bato bakokufa na somo, wana bakozala kokanisa makambo oyo esengeli koya na mokili, pamba te banguya ya Likolo ekoningisama.


Nakolakisa bikamwa kuna na Likolo, mpe bilembo ya kokamwa awa na mokili : makila, moto mpe likonzi ya milinga.


Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ