Pamba te ezala bandeko na yo mpe bato ya libota na yo moko bateki yo, bazali koganga makasi mpo na kotelemela yo. Kotiela bango motema te, ata tango bazali kobimisa maloba kitoko mpo na yo.
Moninga azali kokosa moninga na ye, mpe moto moko te azali koloba solo. Bamibongisaka mpo na koloba lokuta, babimisaka motoki na bango mpo na kosala masumu.
Tata akoyina mwana na ye ya mobali, mpe mwana mobali akoyina tata na ye ; mama akoyina mwana na ye ya mwasi, mpe mwana mwasi akoyina mama na ye ; mama-bokilo akoyina mwasi ya mwana na ye ya mobali, mpe mwasi ya mwana mobali akoyina mama-bokilo na ye.
Nayebi malamu esika oyo ovandaka. Ezali mpe kaka na esika yango nde Satana atie kiti na ye ya bokonzi. Okweyisaki te kondima na yo epai na Ngai, ezala na mikolo oyo babomaki Antipasi, motatoli na Ngai ya sembo, kati na engumba na bino epai wapi Satana avandaka.
Tango Mpate abukaki ekangelo ya mitano, namonaki na se ya etumbelo, milimo ya bato oyo baboma likolo na Liloba na Nzambe mpe likolo na litatoli na bango.