Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 21:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kasi liboso ya makambo wana nyonso, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakofunda bino kati na bandako ya mayangani, bakobwaka bino na baboloko, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe ya bayangeli, mpo na Kombo na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 21:12
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe bamosusu bakangaki basali ya mokonzi, banyokolaki bango mpe babomaki bango.


Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.


mabele ekoningana makasi mpe, na bisika ebele, nzala makasi mpe bokono ya ndenge na ndenge ekozala ; makambo ya somo ekosalema, mpe bilembo ya kokamwa ekomonana kowuta na Likolo.


Bobosana te makambo oyo nayebisaki bino : « Mowumbu aleki nkolo na ye te, na bokonzi. » Lokola banyokolaki Ngai, bino mpe bakonyokola bino ; soki babatelaki mateya na Ngai, bakobatela mpe mateya na bino.


Bakosala bino makambo wana nyonso likolo na Ngai, pamba te bayebi te Ye oyo atindaki Ngai.


Mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, apesaki mitindo ete bafungola Polo minyololo ; mpe abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato ya Likita-Monene mpo ete basala mayangani. Bongo amemaki Polo mpe atiaki ye liboso na bango.


babengisaki bantoma, babetisaki bango bafimbu mpe bapekisaki bango ete bateya lisusu Kombo ya Yesu te. Sima na yango batikaki bango kokende.


Kasi Saulo akomaki koluka kopanza Lingomba ; azalaki kokota na bandako nyonso mpo na kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.


Akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye : — Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ?


Mpo na lokumu ya Nkolo, botosaka bato nyonso oyo batiami kati na bino lokola bakonzi : mokonzi ya mboka,


Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ