mabele ekoningana makasi mpe, na bisika ebele, nzala makasi mpe bokono ya ndenge na ndenge ekozala ; makambo ya somo ekosalema, mpe bilembo ya kokamwa ekomonana kowuta na Likolo.
Moko kati na bango, kombo na ye ezalaki « Agabisi ; » atelemaki mpe asakolaki na nguya ya Molimo ete nzala makasi ekoya na bamboka nyonso oyo bato ya Rome bazali kokonza. Nzala yango ekotaki na tango ya mokonzi Klode.