Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 20:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : « Soki tolobi : ‹ Ewutaki na Nzambe, › akotuna biso lisusu : ‹ Bongo mpo na nini bondimaki Ye te ? ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 20:5
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bayekoli bakomaki kokanisa mpe komituna bango na bango : — Azali koloba bongo mpo ete tomemi mapa te !


Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ? Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : — Soki tolobi : « Ewutaki na Nzambe, » akotuna biso lisusu : « Bongo mpo na nini bondimaki ye te ? »


Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ?


Soki mpe tolobi : ‹ Ewutaki na bato, › bato nyonso bakobamba biso mabanga, pamba te bandimaka ete Yoane azalaki mosakoli. »


Ezali na tina na Ye nde nalobaki : « Ezali na moko oyo azali koya sima na ngai, aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. »


Mpe lokola ezali yango nde likambo oyo ngai namonaki, yango wana nazali kotatola : Moto oyo azali Mwana na Nzambe.


Bakendeki epai ya Yoane mpe balobaki na ye : — Moteyi, ozali koyeba lisusu moto oyo azalaki elongo na yo, na ngambo mosusu ya Yordani, oyo na tina ye opesaki litatoli ? Ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.


Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.


Wana Yoane akomaki pene ya kosilisa mosala na ye, alobaki : « Bokanisi ete ngai nazali nani ? Nazali te Moto oyo bozali kozela. Kasi azali koya sima na ngai, Ye oyo nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ