Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.
Bazali konyata mito ya babola ndenge banyataka putulu ya mabele, mpe bazali kokata na bosembo te makambo ya bato bakelela. Tata mpe mwana na ye ya mobali bazali kosangisa nzoto na mwasi moko ya makangu ; mpe na bongo, bazali kotiola bosantu ya Kombo na Ngai.
Soki baluli bilanga ya moto, bazwaka yango na makasi ; soki baluli ndako ya moto, babotolaka yango ; bakangaka mokolo ndako mpe biloko na ye ya ndako mpe babotolaka moto libula na ye.
Na mikolo eleki, bozalaki komona bato na ngai lokola banguna. Bolongolaki bato oyo bazalaki koleka na kimia bilamba ya talo na mawa te, lokola bato oyo bawuti bitumba ;
Nzokande, ezali bino bato bozali koboya bolamu mpe bozali kolinga mabe. Bozali kolongola poso ya nzoto ya bato ya libota na ngai, bozali kolongola misuni na bango mpe kobuka mikuwa na bango.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Boyibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe bosalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Mpo na yango, bokozwa etumbu oyo eleki makasi.]
Na tango yango, lokola bankoto ebele ya bato basanganaki, kino bakomaki konyatana bango na bango, Yesu abandaki na koyebisa bayekoli na Ye : — Bosala keba na levire ya Bafarizeo, oyo ezali lokuta !
— Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ;
Boyebi malamu ete tosalelaki maloba ya sukali te mpe totindikamaki te na posa ya konduka mbongo. Na tina na likambo oyo, Nzambe azali penza Motatoli na biso.
Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.