45 Wana ebele ya bato bazalaki koyoka, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
Yesu abengaki ebele ya bato wana mpe alobaki na bango : — Boyoka mpe bososola makambo oyo :
Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.
Davidi azali kobenga Klisto « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?
Na miso ya bato nyonso, pamelaka bakambi oyo basali masumu mpo ete bato mosusu bakoma na botosi.