Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 20:38 - Mokanda na Bomoi

38 Nzokande, Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi Nzambe ya bato ya bomoi ; pamba te, mpo na Ye, bango nyonso misato bazali na bomoi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 20:38
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? » Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi.


Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi. Bozali penza kati na libunga monene.


Ndambo ya balakisi ya Mobeko bazongisaki : — Moteyi, olobi malamu !


Etikali kaka tango moke, mokili ekomona Ngai lisusu te ; kasi bino, bokomona Ngai. Mpo ete nazali na bomoi, bino mpe bokozala na bomoi.


Ndenge Tata oyo atindaki Ngai azali etima ya bomoi mpe Ngai nazali na bomoi na nzela na Ye, ndenge wana mpe moto oyo alie nzoto na Ngai akozala na bomoi na nzela na Ngai.


Solo, atako babakaki Ye na ekulusu kati na bolembu, kasi azali na bomoi na nzela ya nguya ya Nzambe. Biso mpe ndenge moko : tozali na bolembu kati na Ye, kasi tokomilakisa bato ya bomoi elongo na Ye na nzela ya nguya ya Nzambe, na lolenge na biso ya kosala mpo na bolamu na bino.


Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko : « Nakovanda kati na bango mpe nakotambola elongo na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. »


Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.


Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ