Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 20:36 - Mokanda na Bomoi

36 mpe bakokufa lisusu te, pamba te bazali lokola ba-anjelu. Bazali bana na Nzambe mpo ete basekwi kati na bakufi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 20:36
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.


Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi, nakosikola bango na kufa. Oh kufa, wapi nguya na yo ? Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa ? Nakoyokela bango mawa te !


— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Soki otamboli na nzela na Ngai mpe obateli mitindo na Ngai, okokamba ndako na Ngai mpe okobatela lopango na Ngai, mpe nakotia yo na molongo ya ba-oyo batelemaka awa.


Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.


Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.


Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe.


Kufa nde ezali monguna ya suka, oyo ekobebisama.


Boye, ezali mpe ndenge moko mpo na lisekwa ya bakufi : ekundami nzoto oyo epolaka, kasi ekosekwa nzoto oyo epolaka te ;


Mpe lokola tolataki elilingi ya moto ya mabele, tokolata mpe elilingi ya moto ya Lola.


Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.


Bato oyo bakosekwa na lisekwa ya liboso bazali bato ya esengo mpe basantu ! Kufa ya mibale ezali na bokonzi te epai na bango, kasi bakozala Banganga-Nzambe ya Nzambe mpe ya Klisto, mpe bakokonza elongo na Ye mibu nkoto moko.


Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »


Kasi anjelu alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala, ya bandeko na yo, basakoli ; mpe ya ba-oyo nyonso babatelaka maloba ya buku oyo. Gumbamela nde Nzambe ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ