Moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Mwana na Moto akolimbisama ; kasi moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Molimo Mosantu akolimbisama te, ezala na bomoi na ye awa na se to na bomoi oyo ekoya.
Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango : — Boyebi malamu ete bato oyo bamonanaka lokola bakonzi bakonzaka bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango.
Nzokande, kati na Sarde, ozali na ndambo ya bato oyo babebisaki te bilamba na bango. Bakotambola elongo na Ngai, na bilamba ya pembe, pamba te babongi na yango.