Sik’oyo, tika botosi ya Yawe ezala kati na bino. Bokata makambo na bosolo ; pamba te epai na Yawe, Nzambe na biso, makambo oyo ezalaka te : kozanga bosembo, kopona bilongi mpe kanyaka. »
Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu : — Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te ;
Tango bakomaki epai na Ye, balobaki : — Moteyi, toyebi ete ozali moto ya sembo mpe obangaka bato te, pamba te oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. Boni, Mobeko na biso epesi solo nzela ya kofuta mpako ya Sezare to te ? Tosengeli penza kofuta yango ?
Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli.
Ayaki na butu epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Rabi, toyebi ete ozali Moteyi oyo awuti epai ya Nzambe, pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa oyo Yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te.
Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.
Bato oyo bazalaki bakambi babakisaki ata eloko moko te na mateya na ngai ; lokumu nyonso oyo bazalaki na yango ezalaki na motuya moko te epai na ngai, pamba te Nzambe aponaka bilongi te.