Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 20:2 - Mokanda na Bomoi

2 balobaki na Ye : — Yebisa biso, na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 20:2
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto wana azongisaki : — Boni, nani akomisi yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso ? Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito ? Moyize abangaki mpe amilobelaki : « Solo, likambo oyo nasalaki, esili koyeba. »


Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya bato kati na lopango ya Tempelo mpe kosakola Sango Malamu, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato babimelaki Ye ;


Yesu azongisaki : — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Boyebisa Ngai :


Bayuda balobaki na Yesu : — Likamwisi nini okoki kolakisa biso mpo na kotalisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala makambo oyo nyonso ?


Kasi moto oyo azalaki konyokola ndeko na ye atindikaki Moyize mpe alobaki : « Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso ?


Bato ya mito makasi, ya mitema mabanga mpe bakufa matoyi ! Bozali ndenge moko kaka na bakoko na bino : botelemelaka tango nyonso Molimo Mosantu !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ