18 Moto nyonso oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.
Na mokolo wana, nakokomisa Yelusalemi lokola libanga ya kilo liboso ya bikolo nyonso ; moto nyonso oyo akoluka kotombola yango akozoka ; mpe bikolo nyonso ekosangana mpo na kobundisa Yelusalemi.
Tango eleko ya kobuka bambuma ekomaki pene, atindaki basali na ye epai ya bafuteli elanga, mpo ete bakende kokongola bambuma na ye ;
Moto oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; kasi moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.]
bazali kokanga biso nzela mpo ete toteya Bapagano te, noki te bakobika. Na ndenge wana, bazali kaka kofulukisa masumu na bango mpe, suka na suka, kanda ya Nzambe ekokweyela bango.