Tango mosusu, soki bato ya Yuda bayoki sango ya pasi nyonso oyo nabongisi mpo na kotindela bango, moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; mpe, na bongo, Ngai nakolimbisa mabe mpe masumu na bango. »
Tango mosusu mabondeli na bango ekokoma liboso ya Yawe, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; pamba te kotomboka mpe kanda oyo Yawe akani kokitisela bato oyo ezali monene. »
Yango wana, mwana na moto, kangisa bisaka na yo lokola moto oyo azali kokende na bowumbu mpe kende na bowumbu na moyi makasi, na miso na bango. Telema na esika oyo ozali mpe kende na esika mosusu na miso na bango ; tango mosusu bakoki kososola, atako bazali libota ya batomboki.
Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.
Efrayimi, nasala yo lisusu nini ? Yuda, nasala yo lisusu nini ? Bolingo na bino mpo na Ngai ezali lokola londende ya tongo, lokola mamwe oyo elimwaka noki.
Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »
Pamba te likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo ete bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na Ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu, mpo ete akoma likabo mpo na lisumu. Boye, akatelaki masumu etumbu kati na nzoto ya bato.