Isalaele azalaki lokola nzete ya vino ya bitape ebele, azalaki kobota mbuma mpo na ye moko. Ndenge azalaki kobota mbuma ebele, ndenge wana mpe atongaki bitumbelo ebele ; ndenge mabele na ye ekomaki kitoko, ndenge wana mpe abongisaki mabanga na ye ya bule.
Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga mpo ete bapesa ye ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino. Kasi bafuteli elanga babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
Boni, ezalaki solo ata na mosakoli moko oyo bakoko na bino bazangaki konyokola ? Kutu, babomaki ezala basakoli oyo basakolaki koya ya Moyengebene, Ye oyo bosili sik’oyo koteka mpe koboma,
Boyebi lisusu ete, sima na biso konyokwama mpe kofingama kati na Filipi, toteyaki bino, na lisungi ya Nzambe na biso mpe na molende nyonso, Sango Malamu na Ye kati na bitumba makasi.