Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 2:9 - Mokanda na Bomoi

9 Anjelu moko ya Nkolo abimelaki bango, mpe nkembo ya Nkolo engengaki zingazinga na bango ; mpe bayokaki somo makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 2:9
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe Banganga-Nzambe bakokaki lisusu te kotelema kati na yango mpo na kosala mosala na bango mpo na lipata, pamba te nkembo na Yawe etondisaki Tempelo na Ye.


Wana Aron azalaki koloba na lisanga nyonso ya bana ya Isalaele, babalolaki miso na bango na ngambo ya esobe, mpe bamonaki nkembo na Yawe kobima na mapata.


Boye lobi na tongo, bokomona nkembo na Yawe ; pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Mpo na yango, biso tozali banani mpo ete boyimayima epai na biso ?


Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela, ekosepela mpe ekoganga na esengo. Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli mpe ya Saroni ekopesamela yango ; boye bakomona nkembo ya Yawe, lokumu ya Nzambe na biso.


Bongo, nkembo na Yawe ekomonisama, mpe bato nyonso bakomona yango elongo ; » pamba te Yawe nde alobi.


« Telema mpe ngenga, pamba te pole na yo ezali koya, mpe nkembo na Yawe etelemi na likolo na yo.


Natelemaki mpe nakendeki na lubwaku. Nkembo ya Yawe ezalaki kuna : ezalaki lokola nkembo oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye nakweyaki elongi na ngai kino na mabele.


Wana Jozefi azalaki kokanisa makambo yango, anjelu na Nkolo abimelaki ye kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Jozefi, mokitani ya Davidi, kobanga te kobala Mari ; pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu.


Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye : — Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo !


Kati na etuka yango, ezalaki na babateli bibwele oyo bazalaki kolekisa babutu na bango kati na bilanga ya pembeni mpo na kobatela bitonga na bango.


Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi.


Ezayi alobaki bongo mpo ete amonaki Nkembo ya Yesu mpe azalaki koloba na tina na Ye.


Mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa, mpe pole engengaki kati na boloko. Anjelu aningisaki Petelo na mopanzi mpo na kolamusa ye ; alobaki na ye : — Telema noki ! Mpe minyololo ekweyaki longwa na maboko ya Petelo.


Na butu ya lelo, Anjelu na Nzambe na ngai, oyo nasalelaka, ayaki epai na ngai


Kasi na butu, anjelu moko ya Nkolo afungolaki bikuke ya boloko, abimisaki bantoma mpe alobaki na bango :


Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.


Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.


Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.


Mpo na somo makasi ya makambo oyo amonaki, Moyize agangaki : « Nazali kolenga na somo ! »


Sima na makambo wana, namonaki anjelu mosusu kokita wuta na Lola ; azalaki na bokonzi monene, mpe nkembo na ye engengisaki mokili.


Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ