Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 2:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mari abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso ; alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye kati na elielo ya bibwele, pamba te esika ezalaki te mpo na bango kati na ndako ya bapaya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 2:7
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na esika oyo batelamaki mpo na kolekisa butu, moko na bango afungolaki saki na ye mpo na koleisa ane na ye mpe amonaki mbongo na ye na moto ya saki na ye.


kasi tango totelemaki na esika ya kolekisa butu, tofungolaki basaki na biso ; mpe moko na moko kati na biso amonaki mbongo na ye kati na saki na ye ndenge kaka ezalaki, yango wana tozongi na yango.


Bagangaki epai na Yo, mpe Yo okangolaki bango ; batiaki elikya na bango kati na Yo mpe bayokisamaki soni te.


Nzokande na nzela, na esika oyo balekisaki butu, Yawe akutanaki na Moyize mpe alukaki koboma ye.


Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. »


Kasi Jozefi asangisaki nzoto te na Mari kino tango Mari abotaki mwana mobali ; mpe Jozefi apesaki Ye kombo Yesu.


Ezali ye te mwana ya mosali mabaya ? Mama na ye, kombo na ye ezali Mari te ? Jake, Jozefi, Simona mpe Jide bazali bandeko na ye ya mibali te ?


Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.


apusanaki pene na ye, asopelaki bapota na ye mafuta mpe vino, mpe akangaki yango. Bongo amatisaki moto yango na likolo ya mile na ye moko, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe akobaki kosunga ye kuna.


Wana bazalaki na Beteleemi, mokolo na ye ya kobota ekokaki.


Kati na etuka yango, ezalaki na babateli bibwele oyo bazalaki kolekisa babutu na bango kati na bilanga ya pembeni mpo na kobatela bitonga na bango.


Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.


Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.


Kasi tango ngonga oyo Nzambe akataki ekokaki, atindaki Mwana na Ye, oyo abotamaki na mwasi mpe na se ya bokonzi ya Mobeko,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ