Lisolo ya ndoto na ngai esuki awa. Ngai, Daniele, namitungisaki mingi kati na motema na ngai, elongi na ngai ebebaki na somo mpe nabombaki makambo oyo kati na motema na ngai.
Ezali ye te mosali mabaya ? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona ? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso ? » Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye.
Akendeki na Nazareti epai wapi akolaki ; mpe na mokolo ya Saba, akotaki na ndako ya mayangani, ndenge ezalaki momesano na ye. Atelemaki mpo na kotanga,
Yesu alobaki na bango : — Nayebi malamu ete bokoloba na Ngai lisese oyo : « Monganga, mibikisa yo moko ! » Mpe bokoloba na Ngai : « Sala mpe awa, kati na engumba na Yo, makambo oyo toyokaki ete osalaki yango kati na Kapernawumi ! »