Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 2:49 - Mokanda na Bomoi

49 Yesu azongiselaki bango : — Mpo na nini koluka Ngai ? Boyebaki te ete nasengeli kosala misala ya Tata na Ngai ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 2:49
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo nalobaki : « Ngai oyo, nayei epai na Yo kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.


« Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga.


Tango baboti na Ye bamonaki Ye, bakamwaki mingi. Mama na Ye alobaki na Ye : — Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye ? Tata na yo mpe ngai tozalaki mitema likolo, mpe toluki Yo bisika nyonso !


Yesu alobaki na bango : — Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.


Kasi Yesu alobaki na bango : « Tata na Ngai azali kosala kino sik’oyo, Ngai mpe nazali kosala. »


Nzokande Ngai, nazali na litatoli moko ya monene na tina na Ngai moko koleka kutu oyo ya Yoane : misala oyo nazali kosala na Kombo ya Tata etatolaka na tina na Ngai ete ezali Tata nde atindaki Ngai.


Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.


Ye oyo atindaki Ngai azali elongo na Ngai ; atikaki Ngai moko te, pamba te, Ngai, nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka Ye.


Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai ; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ