48 Tango baboti na Ye bamonaki Ye, bakamwaki mingi. Mama na Ye alobaki na Ye : — Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye ? Tata na yo mpe ngai tozalaki mitema likolo, mpe toluki Yo bisika nyonso !
Yesu azalaki na mibu pene tuku misato ya mbotama tango abandaki mosala na Ye. Bato bazalaki kokanisa ete azali mwana mobali ya Jozefi ; Jozefi, mwana mobali ya Eli ;
Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?
Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye : — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.