mpe azongaki kati na engumba na Ye ; akomaki koteya bato kati na ndako na bango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa makasi mpe komituna : « Bwanya mpe nguya ya kosala bikamwa oyo azwi yango wapi ?
Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bayokaki makambo yango mpe bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; bazalaki kobanga Ye, pamba te ebele ya bato bazalaki kokamwa malakisi na Ye.
Wana mokolo ya Saba ekokaki, Yesu akomaki koteya kati na ndako ya mayangani. Kati na bato oyo bayokaki Ye, ebele bakamwaki makasi. Batunaki : « Boni, moto oyo azwi makambo oyo wapi ? Nani apesi ye bwanya ya boye ? Azwi wapi nguya ya kosala bikamwa oyo nyonso ?
Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?