Sima na Amatsia, mokonzi ya Yuda, kotuna toli epai ya bapesi toli na ye, abetaki mondenge na Joasi, mwana mobali ya Yoakazi mpe koko ya Jewu, mokonzi ya Isalaele ; alobaki : — Yaka tobunda !
Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. Na mokolo ya liboso, bokolongola levire na bandako na bino ; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya sambo, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele.
Lokola bazalaki kokanisa ete azali elongo na baninga na Ye ya mobembo, basalaki mokolo mobimba na nzela. Bongo bakomaki koluka Ye epai ya bandeko mpe baninga na bango.