Luka 2:41 - Mokanda na Bomoi41 Baboti ya Yesu bazalaki kokende na Yelusalemi mibu nyonso mpo na feti ya Pasika. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.
Kasi bokolia yango kaka na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo Yawe Nzambe akopona : bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpe bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na mosala nyonso oyo maboko na bino ekosala.