Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 2:40 - Mokanda na Bomoi

40 Mwana azalaki kokola mpe kokoma makasi ; atondaki na bwanya, mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 2:40
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Atiaka motema na ye epai na Yawe ; tika ete Yawe abikisa ye ! Tika ete Yawe akangola ye, pamba te asepelaka na Ye ! »


Motema na ngai etondi na maloba kitoko. Namilobeli : Nakotatola misala na ngai mpo na mokonzi. Tika ete lolemo na ngai ezala lokola ekomeli ya mokomi ya mayele.


Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele.


Bato nyonso oyo bazalaki koyoka Ye bazalaki kokamwa mingi mayele na Ye mpe biyano na Ye.


Yesu azalaki kokola na bwanya mpe na nzoto ; Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na Ye.


Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.


Bantoma bakobaki kotatola lisekwa ya Nkolo Yesu na nguya monene, mpe ngolu monene ezalaki na bango nyonso.


Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.


Mwana na ngai, zala makasi kati na ngolu oyo ezali kati na Yesu-Klisto.


Mwasi ya Manoa abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Samison. » Mwana akolaki, mpe Yawe apambolaki ye.


Kasi Samuele azalaki kosala mosala na ye liboso ya Yawe. Elenge mobali Samuele azalaki kolata efode ya lino.


Yawe asalelaki Ana ngolu, mpe Ana azwaki lisusu bazemi, abotaki bana mibali misato mpe bana basi mibale. Nzokande elenge mobali Samuele azalaki kokola liboso ya Yawe.


Elenge mobali Samuele akobaki kokola na nzoto, mpe azalaki kosepelisa Yawe mpe bato.


Wana Samuele azalaki kokola, Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kokokisa maloba na Ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ