Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 2:32 - Mokanda na Bomoi

32 pole mpo na kongengisa bikolo, mpe nkembo ya bato na Yo, Isalaele. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 2:32
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, nakoyoka maloba na Nzambe ; pamba te alobaka mpo na kimia ya bato na Ye mpe ya bayengebene na Ye. Kasi tika ete bazongela te botomboki na bango.


Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.


Na mokolo wana, nkona ya Yawe ekokoma kitoko mpe nkembo, bongo mbuma ya mabele ekosala lokumu mpe nkembo, ya ndambo ya bana ya Isalaele oyo babiki.


Ezali kati na Yawe nde bato nyonso oyo bazali bakitani ya Isalaele bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa lokumu.


Ye, Yawe, alobi : « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »


mpo ete oloba na bakangami : ‹ Bobima, › mpe na bato oyo bazali kati na molili : ‹ Bokoma bansomi ! › Boye bakozala lokola bibwele oyo ezali kolia matiti pene ya nzela, mpe bakozwa bilei na bangomba nyonso oyo ebotaka matiti te.


Oh bato na ngai, boyoka ngai ! Bino, ekolo na ngai, boyoka ngai malamu : Mpo ete Mobeko ekobimela epai na ngai, lolenge na ngai ya kokata makambo ekoyeisa pole na bikolo.


Pole ya moyi ekongengisa lisusu mokolo na yo te, to kongenga ya sanza ekongengisa yo lisusu te na butu ; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe Nzambe na yo akozala nkembo na yo.


Okomisaki bango ekolo monene, obakisaki esengo na bango. Bazali kosepela liboso na Yo ndenge basepelaka tango babukaka milona, ndenge mibali basepelaka tango bakabolaka bomengo ya bitumba.


Boni, ezali na ekolo oyo etikaka banzambe na yango mpo na kosambela banzambe mosusu ? Nzokande, banzambe yango ezalaka kutu banzambe ya solo te. Kasi bato na Ngai basundoli Ye oyo azali Nkembo na bango mpo na kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.


Natombolaki lisusu miso mpe namonaki moto moko liboso na ngai, asimbaki singa oyo bamekelaka molayi, na loboko na ye.


bato oyo bazalaki kovanda kati na molili bamoni pole makasi ; ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi, pole ebimeli bango. »


Kasi anjelu alobaki na bango : — Bobanga te ! Namemeli bino sango moko ya malamu, oyo ekopesa bato nyonso esengo makasi.


Mobikisi oyo obongisi mpo na bikolo nyonso :


Klisto akomona pasi mpe akozala moto ya liboso ya kosekwa kati na bakufi mpo na kosakola pole ya lobiko epai ya Bayuda mpe epai ya bato ya bikolo ya bapaya.


Yango wana, nalingi boyeba ete Nzambe atindi lobiko na Ye epai ya bato ya bikolo ya bapaya, mpe bakoyoka. [


mpo ete, kolanda ndenge ekomama, « Tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa kati na Nkolo ! »


Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ