Tango mikolo na bango ya komipetola ekokaki, kolanda ndenge ekomama kati na mobeko ya Moyize, Jozefi mpe Mari bamemaki Yesu na Yelusalemi mpo na kotalisa Ye epai ya Nkolo,
Tango baboti na Ye bamonaki Ye, bakamwaki mingi. Mama na Ye alobaki na Ye : — Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye ? Tata na yo mpe ngai tozalaki mitema likolo, mpe toluki Yo bisika nyonso !
Molimo alobaki na ngai ete natia tembe te mpo na kokende elongo na bango. Bandeko motoba bakendeki elongo na ngai kino na Sezarea, mpe tokotaki na ndako ya moto yango.
Bongo kati na Molimo, amemaki ngai kati na esobe moko. Mpe kuna, namonaki mwasi moko avanda na likolo ya nyama ya motane. Loposo ya nyama yango etondaki na bakombo oyo ezalaki kofinga Nzambe. Yango moko nyama ezalaki na mito sambo mpe na maseke zomi.