Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 2:26 - Mokanda na Bomoi

26 Molimo Mosantu alakisaki ye ete akokufa te kino akomona Masiya, Motindami ya Nkolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 2:26
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakonzi ya mokili batomboki, mpe bakambi basangani mpo na kotelemela Yawe elongo na mopakolami na Ye.


« Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »


Yawe ayebisaka mabongisi na Ye epai ya bato oyo batosaka Ye, alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye.


Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ;


Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.


Sima na yango, Nzambe akebisaki bango kati na ndoto ete bazonga lisusu te epai ya Erode. Boye, bazongaki na mboka na bango na nzela mosusu.


« Nkolo, sik’oyo, kolanda elaka na Yo, tika ete mowumbu na Yo akende na kimia !


Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona bokonzi ya Nzambe.


Akendeki kokutana na Simona, ndeko na ye, mpe alobaki na ye : « Tomoni Masiya  ! »


Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.


— Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te ?


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo akobatela Liloba na Ngai kati na ye akotikala kokufa te.


ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.


Azalaki kotalisa mpe kolakisa bango polele ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kosekwa kati na bakufi. Azalaki koloba na bango : — Yesu oyo nazali koteya bino, Ye nde azali Klisto.


Boye, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba na bosolo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobakaki na ekulusu Nkolo mpe Klisto.


Kaka na tango yango, abandaki koteya na bandako ya mayangani ete Yesu azali Mwana na Nzambe.


Mpo na kondima, Enoki amemamaki kino epai ya Nzambe. Boye, atikalaki komona kufa te. Bamonaki ye lisusu te, pamba te Nzambe azwaki ye. Liboso na Enoki konetolama, Makomi etatolaki na tina na ye ete asepelisaki Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ