Okosala mpe lolenge moko mpo na bana liboso ya bangombe, bameme mpe bantaba na yo : ekotikala mikolo sambo elongo na bamama na yango ; bongo na mokolo ya mwambe, okopesa Ngai yango.
Mwana mobali nyonso ya liboso azali ya Ngai ; ekozala mpe bongo mpo na mwana mobali nyonso ya liboso kati na bibwele na bino : ezala mwana ngombe, mwana ntaba to mwana meme.
Mpe lisusu, bana liboso nyonso, ezala ya bato to ya banyama oyo bakomema epai na Yawe bakozala mpo na yo. Kasi osengeli kosikola mwana mobali nyonso ya liboso ya moto to ya nyama ya mbindo.
Pamba te, bana nyonso ya liboso bazali ya Ngai. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso ya Ejipito, natiaki pembeni bana nyonso ya liboso ya Isalaele mpo ete bazala ya Ngai, ezala bana ya bato to ya banyama. Nazali Yawe. »