Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 2:21 - Mokanda na Bomoi

21 Na mokolo ya mwambe, tango ngonga ya kokatisa mwana ngenga ekokaki, bapesaki mwana kombo « Yesu, » kombo oyo anjelu apesaki ye liboso ete mama na ye akoma na zemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 2:21
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na milongo nyonso oyo ekoya, mwana mobali nyonso kati na bino, oyo akokisi mikolo mwambe asengeli kokatama ngenga : ezala mwana mobali oyo abotami kati na ndako na yo to mwana mobali oyo osombi na mosolo na yo epai ya mopaya, mwana mobali oyo azali mokitani na yo te, ye mpe asengeli kokatama ngenga.


Bongo na mokolo ya mwambe, basengeli kokata mwana ngenga.


Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango. »


Kasi Jozefi asangisaki nzoto te na Mari kino tango Mari abotaki mwana mobali ; mpe Jozefi apesaki Ye kombo Yesu.


Yesu azongiselaki ye : — Tika ete esalema bongo sik’oyo ! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.


Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo « Yesu. »


Na mokolo ya mwambe, sima na mbotama ya mwana, bakendeki kokatisa mwana ngenga ; balingaki kopesa ye kombo ya tata na ye, Zakari.


amikitisaki penza mpe atosaki kino na kufa, ata na kufa ya ekulusu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ